![]() |
Koluka
maloba (ba mots) |
Koluka
makelelo (ba verbes) |
Lingála
- Français Français - Lingála |
Maloba ya libosó
LINGÁLA YA MOKOLO NA MOKOLO Bandeko Batángi
tó ba lecteurs ya Magazine Suka Epoque, Libosó
tóbanda mosála oyo, Kestion moko ezalákí kotungisa
bísó: ndéngé nini moto oyo ayebi lingála
te, akoki koyékola maloba ya lingála, na ndéngé
ke soki azali koyóka bato bazali kosolola na lingala lelo, ákoka
pe ko comprendre? Yango wáná tozwákí likanisi
ya kosangisa maloba oyo ewúti na lingala ya mokolo na mokolo, ndenge
elobamaka na bala-bala, pe na ba ndako na bíso, to pe na bisíká
ya mosálá to pe ya lisano, po na kosála dictionnaire
moko "Actuel" ya Lingala. Po lingála ezali kokóla
se kokóla, ndéngé moko na minoko misúsu ya
mokili (fransé, anglé etc...) Dictionnaire ya Súka Epoque ezali complément na ba effort bandeko mosúsu basálá libosó na bísó po ya kolengela pe kotómbola monoko ya lingála, oyo ezalí parmi minoko misúsu (lokóla Swahili, Tshilúba, pe Kikóngó) óyo ezali kosangisa bísó bana ya Kongó. Donc, yango
wáná , tozali na besoin ya lisálisi na bínó
po na ko compléter pe kobongisa Dictionnaire oyo, na ba
mots oyo ezalí kozánga. Mikandá na bínó ekozala toujours le bien-koyá Rédaction |
|
![]() |