A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

ESALELI PO NA BA VERBE

Ba ndeko batángi,

Ya libosó penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola to traduction ya ba verbes (1) ya lingála, Ebongi bonyata na ba lettres to bilembo ya mikandá (A, B, C, D...) oyo ekomami na bleu, awa likoló.
Na différence (2) ya ba mots (3), ba verbe nyónso ya lingála ebandaka kaka na préfixe (4): "ko-", na infinitif.
Yango wana, bokomona ke, totiki préfixe wana.

ndakisa:
esika ya kokoma : koteka = vendre;
biso tokokoma : -téka = vendre
Po bózala na pasi mingi te, na ntango ya ko luka ba verbe ya lingála.

Lingála, ndéngé boyebi, ezali monoko oyo elobamaka káka na bato na Ekwatére te. Yango ezali pe ntina oyo tokútaka mbala míngi maloba ya minoko mosúsu na kati ya lingála. Yangó wáná, po ya kosála distinction (5), bokokúta ba verbe ya lingála oyo elobamaka ti leló. Yango ekomami na rouge foncé (6).

Ndakisa: -tánga = lire, compter, calculer

Bokokúta pe ba verbe misúsu ya lingála oyo elobamaka lisúsu mingi te. Ba verbe yangó etíkálá tango mosúsu kaka na littérature (7), tó pé bokoki koyóka yangó epai ya batu oyo bamesáná koloba lingála ya solo-solo, oyo ya makanza. Bana ya Kisásá na móyi ya leló, bamíngi bayebi yango te. Ba verbe yango ekomámí na moyindo makási (noir, gras)

Ndakisa: -sombitinya = échanger

Bokokúta pe ba verbe misúsu ya lingála oyo ewútí na fransé, kasi ekótá na lingála na elobeli ya mokolo na mokolo. Yango ekomami pe na rouge foncé, pe na suka, kati ya ba parenthèses (8) totié liloba ya Lingála, ndenge esengélí.

Ndakisa: -kalikilé (-tánga) = calculer

Ezalí pé na maloba mosusu ewúti na Kikóngo, Tshilúba, Swahíli to pe minoko misúsu ya Kongó, pe ekótá na lingála. Yango ekomami pe na rouge foncé, pe na súka, totié "Arg.", yango elingi koloba argot (elobeli ya balabala)

Ndakisa: -búkuta arg. = broyer

Ba verbe óyo ekomámí na rouge foncé ezali oyo elobamaka mokolo na mokolo. Kasi oyo ezali na moyindo makasi, elobamaka lisúsú mingi-míngi te. Elingi koloba ke soki olobi yango lelo, mingi bako yeba te soki olobi nini, pe bako comprendre (9) te.

Ndakisa: -sélingwa (kobongama) = être prêt, s'être préparé
kawa: elobamaka lisúsu míngi té ; Okoyoka lelo oyo : kobongama ; Ndimbola na fransé = être prêt, s'être préparé

Bokokúta pe ba ndóí ya maloba (synonymes). Yangó ekomámí mpe etiami kati ya mifiníku ()

Ndakisa: -bóyisa (pekisa) = interdire, priver

Dikisionère ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa yango malembe malembe, biso na bínó elongó.
Kasi, kinó tángo ekotónda, botángi malámu.

la rédaction

 

(1) Makelelo) ; (2) Bokeseni ; (3) Maloba ; (4) bibandela ; (5) Bokeseni ; (6) motane makási, ya ngóla ; (7) ba búku mpe mikandá ;
(8) mifiníku ; (9) kosímba tína ; (10)