|
ESALELI MPO YA MALOBA Ba ndeko batángi, Ya libosó penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola ya maloba ma Fransé na Lingála, bosengélí konyata na bilembo ya mikandá oyo ekomami na motane awa likoló: A B C D... Lingála, ngéngé boyebi, ezali lokótá ezali kolobama káka na bato na Ekwatéle te. Yango ezali mpe komónisa ntina oyo tokokútaka mbala míngi maloba ya minoko misúsu o káti ya Lingála: makótá lokóla Kiswahili, Tshilúba, Kikóngó pe makótá masúsu ya ekólo na bísó Kongó. Mpe lisúsu, makótá ma mikili mya Pótó: lokóla Fransé mpe Anglé. Lokóla makótá na makótá mazalaka na loléngé na yangó, pe mazalaka na bokêsêni míngi, maloba masúsu ma Fransé mazali na mbóngólá ya solo-solo na maloba ma Lingála te. Na esíká óyo tozwi te liloba lisengélí mpo na kopésa mbóngólá (traduction), tomekí se kopésa mwa ndimbola (explication) moké. Ézala
na mbóngólá to pe na ndimbola, bokokúta pe
maloba ma lingála ya solo-solo, maye malobamaka lisúsu mingi
te na Lingála ya mokolo na mokolo. Maloba mangó matiámí
na Nkomá ya kolálisa tó Italíki. Bokokúta
pe maloba masúsu mawútí na Fransé, oyo ezali
lokótá ya letá na RD-Congo. Maloba mangó makótá
na Lingála pe makómá kolobama na Lingála ya
mokolo na mokolo. Kasi maloba mangó mazali tango esúsu na
ndimbolá na yango ya ebandeli lisúsu te. Ndakisa:
fantastique = malámu míngi; kitóko
koleka; danzé (arg.) Ezali mpe lisúsu na maloba ma Lingála ya pete, to ya mokolo na mokolo, tó ya bilengé, babéngí "Indubil"; Yangó esálémi na maloba mawútí na Kikóngó, Tshilúba, Kiswahíli, to pe makótá masúsu ya Kongó. Maloba mangó makótá pe na Lingála. Kasi maloba masúsu pe malobamaka, kasi káka epai na bilengé. Po na yangó, tobakísí (arg.) lokóla ete argot. Ndakisa: succès = nkémbo; lúpemba (arg.) Kokoma pe Kotánga lingála ezali na mpási te: Lokola Latíni (monoko ya Baróma ya kala). Kolongola káka bilembo ya mikandá oyo: "J" pe "V", yango ekotángama lokóla na Fransé: jupe pe Vague. Na yangó bilembo ya mikandá oyo: a
= a (lokóla armoire) Dikisionère
ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa
yango malembe malembe, biso na bínó elongó. |
|