ESÁLELI MPO NA MALOBA Ba ndeko batángi, Ya libosó penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola ya maloba ma lingála na fransé, bosengélí konyata na bilembo ya mikandá oyo ekomámí na motane awa likoló: A B C D... Lingála,
ndéngé boyebi, ezali monoko mozali kolobama káka
na bato baútá na Ekwatéle te. O ntína méi
tokokútaka mbala míngi maloba ya minoko mosúsu o
ntéi ya lingála. Yangó wáná, po ya
kotálisa mwá bokeseni, bokokúta maloba ya lingála
oyo ezali kolobama kíno móyi ya leló, yango ekomami
na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé, gras) Bokokúta
pe maloba mosúsu ya lingála oyo elobamaka lisúsu
mingi te. Maloba yangó etíkálá tango mosúsu
bobélé na mikandá, tó pé bokoyóka
yangó na baye balobaka bó momeseno lingála ya makanza.
Bana ya Kisásá na móyi mwa leló bamíngi
bayebi yango soko moke te. Maloba mangó makomámí
na moyindo makási (noir, gras) Bokokúta
mpe maloba masúsu ma lingála maye mawútí na
fransé, kasi ekótá na lingála. Yango ekomámí
mpe na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé,
gras), pe na suka, kati ya mifiníku (parenthèses) liloba
ya Lingála, ndenge elóngóbání. Ezalí
pé na maloba masúsu maúti na Kikóngo, Tshilúba,
Swahíli to mpe na makótá masúsu ma Kongó,
mpe masílá kokótá na lingála. Maloba
mangó makomámí mpe na motáne ya ngóla
makasi (rouge foncé, gras), mpe na nsúka, kati ya mifiníku,
etiamí "Arg." yango elingi koloba argot
Ndakisa
: káwa (kafé)
= café Bokokúta pe ba ndóí ya maloba (synonymes). Yangó ekomámí mpe etiami kati ya mifiníku (parenthèse) Ndakisa : lipiká (pambu) = ver de terre Dikisionère
ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa
yango malembe malembe, biso na bínó elongó. |
|