![]() |
kozonga (retour) |
LEKI
YA MWASI
|
|
Lisoló oyo etindami na ndeko Diyo, afandi na mboka Londre |
|
-à
suivre- |
||
|
||
-Suiite- Tango makuiza azali kokota na chambre na ye na copain na ye oyo alataki lokola muasi, yaya na ye atuni ye, nani wana boye na ye .makuiza alobi que ezali moninga na ngai annie, aye kolala na ngai mpo ndako na bango esi bakangi makuiza na copain na ye bakoti na hambre. yaya ya makuiza akeyi na ye kolala mpo akolamuka tongo mpo na kokende kelasi. fallait makuiza abimisa mobali na ye na 5 heures, yeba kaka kolala ya kuiti, makuiza na mobali na ye, basutiki 7 heures du matin, moyen mobali na ye abima ezali te mpo yaya na ye nse alamukaki na 6 heures 30 mpo akende universite yaya ya makuiza oyo alumukaki na 6 heures 30, atele maki na porte, mbala moko amoni annie oyo makuiza ayaki na ye mpo alala na chambre na ye. azali kokende koteka yaya ya makuiza atuni ye. annie obimaki tango nini na chambre ya makuiza annie azongisi que azalaki na makuiza te mpo azongaki zando retard akendeke mbala moko na ndako na mbango. yaya ya makuiza elekeli ye. mbala moko akanisi malamu ndenge moto makuiza akotisaki na ndako azalaki kotambola na kobanga apesaki meme ye mbote te. yaya ya makuiza annie apesaka ye mbote mbala moko a confirmer que ezalaki muana mobali oyo leki na ye akotisaki na ndako akosaki ye que muana muasi annie muasi. mbala moko alumusi grand frere na ye(yaya ya makuiza mosusu) ye azalaka lokola voyou. ayebisi ye tina ya likambo.yaya na ye alobi pesa ngai likambo ngai yango ngai moko na gerer yango. leki akeyi kelasi, yaya azui kiti na ye atie mpembeni ya porte ya chambre ya makuiza. na 7 heures, copain ya makuiza i mposa ya kosuba, moyen elamusi ye moye abima ezali te mpo yaya mosusu ya makuiza afandi pembeni ya porte. makuiza amoni ndenge akosala te, chambre na ye ezali na anti-vol, i. alobi biliaki ngai bikoki copain na ye posa ya masuba makasi, muana mobali azali kokanga makola. makuiza azueli ye molangi, asubi. na 10 heures, muana mobali mposa ya kosumba ezui ye. moyen asala ezali te, yaya ya makuiza afandi kaka pembeni ya porte na ye. a dejeuner kaka wana atie musique na ye yawerason azali koyoka makuiza na mobali na ye mayele esuki. akosumba ndenge nini, nzala mpe ebandi kosala mobali ya bato, ekosuka ndenge nini? -a suivre- |
||
|
||
|
||
|
||
-Suite- Tango Makuiza aye ne jupe mpe blouse oyo alatisaki copain na ye, yaya na ye apesi yango na claude mpe ayebisi ye lata yango na mona ndenge olataki yango. Muana mobali azalaki na choix te telema que azalaki deja kobanga, alati jupe mpe blouse(nabosanaki Makuiza alatisaki ye lisusu ekoti) na ekoti. yaya na Makuiza ayebisi leki na ye amemela deux sachets. Akamati ba sachets yango apesi claude, mobali ya leki na ye. Ayebisi ye atia pantalon na ye mpe chemise na ye mpe sachet mosusu atia kaka na ye oyo asumbaki. Muana mobali azengi ba pardon, Makuiza abandi kolela mpo ndenge yaya na ye azali kosala copain na ye mais tala kaka vieux moto, esprit ya ba yanke, mawa abuaka na mbua. Ayebisi ye soki olingi nabeta yo te sala ndenge nayebisi yo mpo natindaki yo te oya kolala awa. Muana mobali azali kosala yango nakolela. Yaya na Makuiza ayebisi ye tozali kokende na yo na arret ya bus omati na ba sachets na yo na bus apres ngai na zongi tango kaka Claude abimi libanda , ba nzinzi babandi ko survoler ye mpo na ba sachets oyo amemaki mpo ezalaki na nie (kaka). Claude ndenge alataki jupe, blouse mpe ba sachets na ye ba nzinzi ba zali ko survoler yango. Nzela nionso bazali koleka ba petis, ba masta ya Makuiza mpe ba yanke bazali koseka basusu bazali kokamua mpe basusu bazali koyoka mawa. Bakomi na arret ya bus, taxi bus ekomi, yaya ya Makuiza ayebisi claude amata na taxi bus na ba sachets na ye. Tango kaka amati na bus bato nionso bakiti. Mpo claude amati na taxi bus na ba nzinzi nz ye chauffeur aboyi kokende yaya na claude alobi akokita te il faut omema ye. Ekomi likambo babenga ba soldats. Yaya na Makuiza ayebisi claude akita mais akende makolo na ba sachets na ye mais a avertit ye mokolo akozua ye lisusu na palais na bango ako barrer.Ye claude bayebisaki ye lisusu deuxieme fois te, mbala moko abendana sans meme apesa meme clin d'oeil na Makuiza atelemaki mosika na mayi ya miso. Suka ya lisolo na biso oyo ezali vraie histoire esalamaki na kinshasa. Yango nazali
kotuna na batangi ya coin ya masolo est ce que claude aboya to azala kaka
na makuiza? |
||
|
||
![]() |
|