|
|
To tambuisa ba bongo na biso pona nkita ya ba ndinga na biso ékénda
sé likolo.
Lélo na ponéli bino lisolo ya bandéko mibalé
ba zalaki lokola mapasa. Bino moko boyébi té na ba mboka
lokola Congo, bato ba linga ko pésa ba kombo ya calendriers na
bana na bango, oyo ba béngaka bango moko “kombo ya Nzambé”
na lingala, to “nkumbu ya Nzambi” na kikongo. Na balola ba
kombo ndéngé na salaka liboso.
Gaston azali éléngé mobali na ba
léki ya basi ébélé. Azali mpé na pire
masta na yé ndéngé to lobaka na mboka, ba yébana
banda bomwana. Gaston akoki kokénda épayi ya masta na yé
ndéngé alingi, kolala kuna, koliya kuna. Mikolo nyonso oyo
Nzambé asalaka. Masta na yé mpé, Gérard asalaka
ndéngé moko.
Kasi bino moko bo yébi ndéngé mokili ézalaka:
éloko na éloko ézalaka na ngonga na yango. Mokolo
mpé ékomaki, Gérard éséngélaki
a kénda Mpoto pona kosala 3ème cycle na yé. Tango
ya bokabwani ékomi.
Kasi, éloko moko Gaston ayébaki té, Gérard,
pire yé moko azalaki ko liya yé sé-sé, lokola
ba koko na biso ba lobaka: azalaki ko damé léki ya Gaston,
Gertrude! Nyonson wana, Gaston koyéba té.
Gérad amati Mikili, yé na momie ba komamaka, kasi, mikanda
ya Gérard ékwéyakaka épayi ya masta moko,
Gaston mpé a yébi yé.
Mokolo moko, Gaston, mobali ya ba ndumbas ndéngé yé
moko alingaka ba bénga yé, azalaki kosolola na ba masta
na yé. Ba zalaki kosolola na makambo ya ba momies. Gaston, na makambo
na yé ya kilikili, ya kofinga ba kana ya baninga (bula, milaso,
etc.) a komi kopésa baninga na yé kanda. Moko a bwaki:
- Gaston, tango nyonso ofingaka ba kana ya baninga, yo mpé oza
na ba léki, soki ba Sali bango ndéngé wana, o komona
yango malamu?
- Tika buzoba, masta! Ba léki na ngaï ba sambélaka.
Ba yébi makambo ya mibali té. Na mama na ngaï, ba tangaka
Biblia tongo, midi mpé mpokwa.
Lisolo é kéyi mosika. Tension é mati pénza
ko mata. Masta, il fallait a lâcher bombe :
- Lélo, éséngéli o yéba té léki
na yo, azalaka ngwèrè ya pire na yo Gérard.
Gaston a séki :
- Tika bonyama ! Gérard aza nga, nga na za Gérard.
Masta a insisté.
Gaston a tomboki, kutu a simbi masta na yé mpona ko tiya yé
makofi. Baninga misusu il fallait ba kota intervention.
Gaston a zongéli ndako na bango na mpokwa wana, kasi pongi éboyi
ko ya. Azalaki kokanisa kaka maloba ya masta na yé.
Na tongo tango a télémi a kéy kotuna kana na yé,
léki a boyi:
- Oh! Yaya, ndéngé nini o koki kutuna nga makambo ya ndéngé
wana? Ya Gérard a za lokola frère na nga moko, ndéngé
nini o lingi na bima na yé.
Léki a zalaki koloba na bo solo moko (bino moko bo yébi
tango to tunaka bana to ba léki na biso makambo...), Gaston, mwa
soni é Sali yé, a tiki na yé, mpé a bimi.
Nzambé a lalaka té, ndéngé ba lobaka, lisolo
ya ba masta é tamboli na kati ya mwa ba quartiers oyo yé
a tambolaka. Mpé, bisika nyonso oyo yé a komaki kokéndé,
kombo ya Gérard na ya léki na yé ézalaki ko
zongéla yé.
Mikolo sambo éléki, Gaston, nzoto ézalaki malamu
té, a kéy kolobéla likambo yango épayi ya
mama na bango a tuna léki bo solo ya likambo wana.
Mama a kamati Biblia mpé a tuni mwana na yé ya mwasi. Mwana
a boyi. Mama a vandisi yé, mpé a fongoli Biblia.
- Mwana na ngaï, o za mwana ya Nzambé. Nzambé a kosaka
té, a lingi mpé lokuta té. Ndéngé o
si oboyi, ngaï na sénga yo éloko kaka moko: kata tséléka
na kombo ya Yésu Masiya mpé sauté ngaï Biblia
oyo.
Mwana a bandi koléla.
- Mama, na bimaka na nga na ya Gérard té.
- Mwana na ngaï, koléla té. Na séngi na yo kaka
o kata tséléka mpé o sauté.
Mwana ya mwasi a léli lokola a léla té banda bomwana
na yé.
Pression élékaki makasi, mpé mwana a déclaré,
mpo a bangaka Nzambé koléka.
- Mama, ya solo, na bimaka na yé.
Mama a béléli mpé a kwéyi mbala moko. Gaston
azalaki na kati ya ésika na yé ya kolala, mpé a yoki
maloba wana nyonso, a sutuki mbala moko mpé a yé ko béta
léki makofi ko léka, mpé kofinga yé. Soki
tata na bango a yakaka té, kasi léki wana ba lokotaki kaka
lokola épave.
Gaston a kéy kokoma Gérard mokanda mpé mokolo wana
kaka a béngi yé na nzéla ya allo-allo:
- Masta, mokolo to kokutana, moto moko entre biso mibalé il faut
a dayé. No kobarré yo o komona! O za ndoki! Yo pire na nga,
o yaka na ndako, o lala na mbéto na ngaï, o liya damage oyo
mère na nga a zo lamba, mpé na sima, ókénda
kozua léki na nga? O za na likundu pénza! O za kadia mpémba!
A boyi koyoka maloba ya masta na yé. A fingi yé pénza
kofinga, mpé na sima, mère na bango, mosambéli monènè,
a lingaka a béngana mwana na yé: “Na bokoli nyoka
na kati ya ndako na nga! Nguma!”
Soki tata té, kasi mwana ya mwasi ba kangaki yé biloko.
Ba
ndéko mibali, bo kéba na ba léki ya ba masta. Kana
ya moninga, a za kana na yo... Bokoko ékéyi wapi?
@+, M82
|