kozonga (retour) 

MWASI BONGISA LIBALA NA YO, KOBEBISA TE!
Pwati Legrand (Péruwelz-Tournai / Belgique)


Lisoló oyo etindami na ndeko Pwati Legrand , afandi na mboka Tournai, na Belgique


   

Makambo oyo elekaki na mboka BELGIQUE, mwasi ya libala, ba bota mpe na mobali na ye, bango mibalé basalaka moto na moto na mosala na ye. Mobali azongaka na ndaku 1heure avant mwasi na ye, nde sima ya ba mbula bakonzi ya mwasi ba yebisi mwasi abanda ko silisa mosala na mua tango ya malamu, ndakisa 16 heures ekomi 14 heures.
Kasi mwasi yango asali nini? Aboyi koloba na mobali na ye nde akobanda kosilisa mosala na ngonga ya malamu 14 heures, nzoka nde azua mobali mosusu (makango), soki asilisi mosala na 14 heures akeyi na ye epai ya makango ti na ngonga ya 16 heures nde aye kozonga na ndako, mobali na ye ayebi kaka nde asilisaka mosala na ngonga mine ya pokua, kasi ndenge ba loba na lingala, moyibi azali na mikolo libua, nde kolo ya eloko, mokolo moko, oyo ya zomi.
Nzambe alalaka te, mokolo mosusu muana na bango azalaki kobela, na kelasi ba bengi na mosala ya mama, kuna ba yebisi bango nde asilisaki mosala kobanda ngonga ya 14 heures, nde ba yekobenga na mosala ya tata, ba yebisi ye makambo nionso, aye kobenga ye moko na mosala ya mwasi na ye kuna nde ba koyebisa ye, ko banda sanza misato yango oyo mwasi na ye asilisaka mosala na 14 heures, mobali akamue atuni mwasi, kasi kaka kokosa. Lelo oyo, libala ezalaka lisusu te, mobali aye ko yeba sekele nionso. Oyo makambo ya soni, ba ndeko na biso basi bazali kosala, soki olingi lisusu mobali te, malamu boboyana ndenge ya malamu, bo tika ko sambuisa nzoto na bino, lelo oyo bana bakoma ko telengana likolo ya makambu mabe ya mama na bango.