kozonga (retour) 

TOSALA KEBA NA BANINGA MOSUSU
Pwati Legrand (Tournai / Belgique)


Lisoló oyo etindami na ndeko Pwati Legrand , afandi na mboka Tournai, na Belgique


   

Mobali moko azalaki awa na mikili ya poto,tangu alingi azonga na Congo-Kisasa, atiki mwana na ye ya mwasi epayi ya moninga na ye, lelo oyo balobanaka lisusu te, pamba te mwana yango leta azua ye. Libota oyo epayi mwana atikalaki, ba komaki koniokola ye, kutu mobali abandaki ko tambola(KOLALA) na mwana yango, kobanda na mbula mwambe(8 ans) mwasi ya mobali yango ayebaki makambo yango, kasi aboyi ko funda makambo ya mabe oyo mobali na ye asala na mwana, to koboma libala, ba wangana makambu yango na miso ya leta(Ba zuzi).

Ti na mokolo ya lelo nanu bakangi bango te,baboti ya mwana kuna na kisasa ba koma lisusu na pasi koleka, likolo ya makambu oyo, lokola leta, asala penza eloko moko ya malonga te.

Nani oyo alingi to sala likitani moko po to salisa muana oyo? pona ko zua avocat alandela makambo yango na ndenge elongobani.

Makambo oyo ezali ya solo, mawa mingi pona ko mipesa epayi ya moninga, to sala keba moto ako sala yo mabe se moninga bomelaka na ye. Soki lelo makambo yango ebonguani nako koma lisusu, bo banga te. Bo yeba lisusu ete ba témoins ya makambo oyo ba zali.

-à suivre-