kozonga (retour) 

AMIE YA MBOKA MONDELE
Par B. Mayo


Ki-camarade ya mbóka mondélé, tángo mosúsu ebótaka makambo mingi.
Ya sóló balobá ke, ki-camarade tango mosusu elekaka ki ndeko. Kasi tango mosusu, confiance topesaka na baninga ekoki komema biso na bisika tokánáká te. Bolanda lisoló oyo.


   

Céline Mungwa azali elenge mwasi moko kitoko.

Na quartier afándaka, bana mibali batámbola moto. Esekeli, démarche, to miso ya pamba, bana ya bato batikalaka kaka mayanga. nani yango kutu alotela ye ba ndoto te?

Céline azalaka pe na moninga na ye Bijou, pire masta, ndenge balobaka. Ba nzela nyonso Céline akendeke, kaka bango mibale. Ezala wenze, ezala église, kaka bango mibale.

Mokolo mosusu Bijou, moninga ya Céline azalaki kobela.
Atindi leki na ye ya mobali akende kobenga Céline. Tango ye leki yango ya mobali akomi epai ya ba Céline, akuti pe Céline baza kokanga ye suki. Leki yango, ayebisi Céline, ndenge yaya na ye atindi ye.

Lokola pe bazalaki kosala ye suki, Céline alobi na leki wana ya mobali ke azela ye moke.
Bino moko boyebi kaka ndenge kokanga ba suki ya maboko ewumelaka.
Ba ndeko ya basi pe lokola bazalaka na patience koleka ya kóbá, bandimaka penza ke, ata kokanga suki yango ekowumela ba heures, mais na patience wana, suka-suka, lifuta na yango: Coiffure ya kitoko ebakisaka ba charme na beauté ya mwasi.

Tango basilisi kokanga ye suki, Céline akoti na ndako, amibongisi pe, sima nango, ye na leki ya Bijou ya mobali, bango wana basimbi nzela bakei.

Tango bakomi kuna epai ya ba Bijou, bakuti pe Bijou pe azalaki déjà kozela bango wana. Na porte ya lopango.

Bijou ayebisi céline ke, aza koyoka nzoto malamu te. Il fallait Céline akende kotika ye na hopital. Sima ya mwa ngonga moke, bango wana basimbi nzela bakei na polyclinique moko ezali moko ezali pe mosika mingi te, na epai ya ba Bijou.

Tango pe bakomi kuna, lokola pe ezalaki déjà na pokwa makasi, butu ekomaki dejà koya, médecin apesi Bijou traitement ya urgence po e calmer ye na ba pasi ya libumu azalaki nango, alobi na bango bazonga mokolo oyo elandi (le jour suivant).

-a suivre-



-suite-

Lobi wana elandí, Celine akei kozwa moninga na ye Bijou. Po ákende kotika ye na lopitálo.
Tango akomi epai ya ba Bijou, akuti ye, azalákí nanu kosukola. Azeli ye pe mwa moke. tango Bijou azali kosála nanu mwa monzele ya vite-fait. Bino moko boyebi kaka, ba ndeko ya basi ata nzoto eza malamu te, monzele balingaka kotika te. Yango wana un jour, monzele moto ekoboma bango...

Tango Bijou asilisi kosala boté, bango wana basimbi nzela, bakei na polyclinique.
Ekómí bango kuna, Docteur pe azalaki wana. Lokola pe Batu bazalaki mingi te, ewumelaki te, bayambi bango. Monganga asali Bijou mwa kontrole (examen, ndenge tolobaka). Azwi ye na malaria. Apesi pe ba kisi ya komela. Ba komprimé. Apesi pe mwa tonga. Passage obligé.

Bino moko boyebi, ndenge ezalaka na Kin, mwa maladi moke, ilfo kaka tonga. Ata motó pasi, kaka tonga. Libumu pasi, kaka tonga. Kosukosu, mosapi pasi, kaka se tonga. Suki pasi, tonga. Bazwi yo na mwa liyanzi, kaka tonga. Système kaka ya Tongalogie. Esika ya kokimela eza te. Soki pe ozwi chance ya mabe, oyo ba Fransé babengi "malchance", okutani na monganga ya maboko makasi pe motema likundu, wana esika liwa na yo emonani.
Soki aswanaki na mwasi na ye na ndako, akobeta yo tonga na kanda, nde esika okokoma bwaté (boiteux).

Na koloba-loba mingi te, noki te ba minganga bakoya kokana ngai. Mokolo nakobela, nakokimela wapi? Tika nakontinuer kobetela bino kaka lisolo na malembe...

-A suivre-