![]() |
kozonga (retour) |
PO NA NZELA YA
POTO, BONDEKO EKUFI
|
|
Lisoló oyo etindami na ndeko Afonso Pululo , afandi na mboka Hollande |
|
-à
suivre- |
||
|
||
Bandeko bakomi pe batangi ya magazine suka epoque,na lisolo na biso pona nzela ya poto,eyano epesamaki ete oyo ndeko ya muasi azali kosala ezali kisakata to pe bisalela,ezali yasolo, kasi tala mabe ya likambo yango epai ezali, ya kopesaka ba sango ya mabe na kombo ya ndeko naye ya mobali na mboka ya afrika, bango kuna na mosika bayebi te nini oyo ezali koleka awa na poto epai bango bazali, sango ya mosika ezalaka malamu penza te, pamba te bazuaka yango na ba ndenge ebele. Pona yo
ndeko ya muasi pe ndeko ya mobali oyo ovandi awa na mikili ya poto,totika
bezaleli ya kofundanaka na ba telephone to pe na mikanda, ezali koboma
bondeko ya mingi awa na poto. Melesi wa
bino Alpha. |
||
-Suite- Nzambe alalakate, aye kosala ngolu ndeko ya mobali aye kokende na mboka ya afrika, ndeko kozanga koyeba likambo na motema akiti na esengo, nzoka nde epai ye akomeli ese bayoka basango ya mabe na kombo na ye,nani akokotela ndeko ya mobali oyo, bango nioson ba cousin na ye, ba ndeko oyo ba botami na ndeko ya muasi, ba niokola ndeko mobali oyo kofinga ye na ndenge ya mayele, ndeko oyo azali kaka koyoka nde azali koyeba likambo yango epai ewuti te, ndeko oyo akomi ti komona ba mistik na butu, aaah ndeko oyo akomi kokima kolekisa mokolo na lopango epai ye akomelaki, kaka na eyenga moko ndeko oyo posa ya mobembo ye akendaki eye kosila ,posa kaka azonga na ye, na esika ya kosala sanza moko oyo ndeko abongisaka ndeko oyo alembi mboka. Ndeko oyo asali kaka courage ya mibali alobi natuna nanu likambo yango soki ezali nini, ba ye kofongolela ndeko ya mobali na ya kamua moke, oyo ya kitoko te, ndeko oyo aye koyeba likambo yango, kasi akoloba nini tala kaka motu nioson ayokelaka mingi motu oyo ya ye, ba yokela ndeko na bango ya muasi na oyo nioson ayebisaka bango,ye ko na mosika ndeko ya mobali akosamba na nani, famille nioson mitema ebebi, tala kaka kuna na ba mboka soki motu akoki nzela na ye ya poto ndenge nini bazuelaka yango, ebimaki lokola ndeko ya mobali oyo alingaki kobebisa vie ya ndeko na ye ya muasi, bango nioson ba bebisa mitema na ndenge ya moke te, kasi ndeko ya mobali oyo aloba eloko moko te aye naye kozonga poto ti lelo afanda na ye, tango ndeko oyo ya muasi aye koyoka nioson oyo ye asalaka pe alobaka na mboka epai ya ba ndeko na ye, ndeko ya muasi akoma koyoka soni akokaka lisusu kobenga te epai ya ndeko na ye ya mobali, soki amoni ndeko ya mobali akoma kolenga, akima epai ya ndeko na ye ya mobali. masolo oyo ezali ya solo esalema |
||
|
||
![]() |
|