MBOTE NA BINO!

Ya liboso topésí bínó mbóte míngi na bipáyi nyónso bozali.

Mikolo milekí míngi, tokokaki kokoba prorogramme na bísó ndéngé tokánákí te. Sik'óyo, tozali kozóngela yango. Kasi bokomona mwa mbóngwáná, to changement moke na esáleli na bísó.

Kobanda na le 1 Juillet (sánzá ya sambo), tokobanda matéya (cours) ya lingála na esíká oyo. Matéya yango ekozala na nzela ya masoló ya bilili (Bande dessinée).

Ekozala kobima mbala moko na poso (une fois par semaine). Semaine ya liboso ekozala lokóla momeko (essai).

Bosepélí kokomela bísó pó na kopésa makanisi na bínó? Tobongiseli bínó esíká ya kokomela bísó mikandá na rubrike Courrier des Lecteurs.

Po na lingála oyo tozali koloba, bokoki kotánga makanisi na bíso na EDITORIAL na bísó.

Botangi malamu !

   
Ekobima le 15 Janvier 2007
Nyata awa na image oyo, po na komona Couverture na format ya monene