A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

ESALELI PO NA MAKELELO

Ba ndeko batángi,

Ya yambo mpenzá, po ya kokóta pe koluka ndimbola ya makelelo (ba verbes) ya lingála, bosengélí konyata na bilembo bya mikandá (A, B, C, D...) biye bikomámí na lángi ya bulé (bleu) áwa likoló.
Na bokeseni na maloba (ba mots), makelelo (ba verbe) ma lingála makobandaka se na: "ko-" na ntango babéngí na lifalansa 'te: infinitif.
Na ntina méi, bokomóna 'te, totíkí libandela (préfixe) wana. Mpo ete bozala na kokakatana te, o ntango ya boluki makelelo ma lingála.

ndakisa:
esika ya kokoma : koteka = vendre;
biso tokokoma : -téka = vendre

Lingála, ndéngé boyebi, ezali lokótá lokolobamaka káka na baí-Ekwatéle te. Yango ezali mpe komonisa ntina oyo tokokútaka mbala míngi maloba maútí na makótá masúsu o ntéi ya lingála. Yangó wáná, Tomekákí kosála mwá bokeseni kati ya elobeli ya mokolo na mokolo (Lingála courant) pe na lingála ya solo-solo.
Bokokúta makelelo ma lingála oyo mazali kolobama kíno móyi mwa leló. Yango ekomami na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé, gras)

Ndakisa: -tánga = lire, compter, calculer

Bokokúta pe makelelo masúsu ma lingála maye makolobamaka lisúsu mingi-míngi te. Makelelo mangó matíkálá tango mosúsu bobélé na minkandá, tó mpé bokoyókaka yangó na baye balobaka bó momeseno lingála ya Makanza. Bana ya Kisásá na móyi mwa leló, bamíngi bayebi yango soko moke te. Makelelo máná makomámí na makási, na moyindo (en gras)

Ndakisa: -sombitinya = échanger

Bokokúta mpe makelelo maíké ma lingála, makelelo maye maútí na lifalansa, kasi masílá kokótá na lingála na elobeli ya mokolo na mokolo. Maloba máná makomámí mpe na makási, na motáné ya ngóla ( gras, rouge foncé), mpe na nsúka, kati ya mifiníku (parenthèses) totii liloba lya Lingála, ndenge elóngóbání.

Ndakisa: -kalikilé (-tánga) = calculer

Ezalí pé na makelelo masúsu maúti na Kikóngo, Tshilúba, Swahíli to mpe na makótá masúsu ma Kongó, mpe masílá kokótá na lingála. Maloba mangó makomámí mpe na makási, na motane ya ngóla, pe na nsúka, etiamí "Arg.", yango elingi koloba 'te: argot (elobeli ya balabála)

Ndakisa: -búkuta (arg.) = broyer

Makelelo maye makomámí na makási (gras), na motane ya ngóla mazali maloba maye makolobamaka mokolo na mokolo. Kasi maye mazali na moyindo makolobamaka lisúsú mingi-míngi te. Elingi koloba 'te soki olobi yango, Ba mingi bako yeba te soki olobi nini, mpe bakosímba tína ya maloba ma yo soko moke te.

Ndakisa: -sélingwa (kobongama) = être prêt, s'être préparé
kawa: elobamaka lisúsu míngi té ; Okoyoka lelo oyo : kobongama ; Ndimbola na fransé = être prêt, s'être préparé

Bokokúta mpe ba ndóí ya maloba (synonymes). Yangó ekomámí mpe etiami kati ya mifiníku ()

Ndakisa: -bóyisa (pekisa) = interdire, priver

Dikisionère ya Suka Epoque esílí naino te. Tokotóndisa yango malembe malembe, biso na bínó elongó.
Kasi, kinó wáná ekotónda, totómbéli bínó botángi bolámu

la rédaction