A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

ESALELI MPO YA MALOBA

Ba ndeko batángi,

Ya libosó penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola ya maloba ya Fransé na Lingála, bosengélí konyata na bilembo ya mikandá (ba létre) oyo ekomami na motane awa likoló: A B C D...

Lingála, ngéngé boyebi, ezali monoko ezali kolobama káka na bato na Ekwatêle (Equateur) te. Yango ezali pe komonisa ntina oyo tokokútaka mbala míngi maloba ya minoko misúsu na lingála: minoko lokóla Kiswahili, Tshilúba, Kikóngó pe minoko misúsu ya mbóka na bísó Kongó. Mpe lisúsu, minoko ya Pótó: lokóla Fransé pe Anglé.

Lokóla minoko na minoko ezalaka na ndéngé na yangó, pe ezalaka na bokeseni míngi, maloba mosúsu ya Fransé ezali na mbóngólá ya solo-solo na maloba ya Lingála te. Na esíká óyo tozwi te liloba esengélí po na kopésa mbóngólá (traduction), tomekí se kopésa mwa ndimbola (explication) moké.

Ézala na mbóngólá to pe na ndimbola, bokokúta pe maloba ya lingála ya solo-solo, oyo elobamaka lisúsu mingi te na Lingála ya mokolo na mokolo. Yango etiámí na Nkomá ya kolálisa Italíki.

Ndakisa: canard = libata; liswéswé

Bokokúta pe maloba misúsu ewútí na Fransé: yangó ezali lokótá ya letá na RD-Congo. Maloba yangó ekótá na Lingála pe ekómá kolobama na Lingála ya mokolo na mokolo. Kasi maloba yangó ezali tango mosúsu na ndimbolá na yango ya ebandeli lisúsu te.
Maloba yango, topésí yangó Nkomá (to ekomeli) ya Lingála, pe tobakísí (arg.) lokóla ete argot, to monoko ya bala-bála. Po maloba yango elobamaka míngi na bandeko oyo bayébí lingala ya solo-solo malámu te.

Ndakisa: conjuration = mwángo; kompló (arg.)
Awa, liloba oyo: "kompló" (ewútí na Fransé "complot") ezali na ndimbola na yango ya ebandeli.

Ndakisa: fantastique = malámu míngi; kitóko koleka; danzé (arg.)
Awa, liloba oyo: "danzé" (ewútí na Fransé "danger") ezalí lisúsu na ndimbola na yangó ya ebandeli te.

Ezali pe lisúsu na maloba ya Lingála ya pete, to ya mokolo na mokolo, tó ya bilengé, babéngí "Indubil"; yangó esálémi na maloba ewútí na Kikóngó, Tshilúba, Kiswahíli, to pe minoko misúsu ya Kongó. Maloba yangó ekótá pe na Lingála. Kasi maloba mosúsu pe elobamaka, kasi káka epai ya bilengé. Po na yangó, tobakísí (arg.) lokóla ete argot.

Ndakisa: succès = nkémbo; lúpemba (arg.)

Kokoma pe Kotánga lingála ezali pási te: Lokola Latíni (monoko ya Baróma ya kala). Kolongola káka ba létre "J" pe "V", yangó ekotángama lokóla na Fransé: jupe pe Vague. Na yangó ba létre oyo:

a = a (lokóla armoire)
á
= a (lokóla état)
â = a
(lokóla bâtard)
e = e
(lokóla étui)
é = e
(lokóla dignité)
ê = e
(lokóla prêtre)
i = i
(lokóla licence)
í = i
(lokóla bandit)
o = o
(lokóla ovation)
ó = o
(lokóla méthode)
ô = o
(lokóla socle)
u
= ou (lokóla rouler)
ú = ou accentué (lokóla tout)
g
= g (lokóla garçon)
ng = ng (lokóla congolais)
ny = gn (lokóla signature)
nz
= nz (lokóla bronze)
sh = ch (lokóla chacal)
tsh = tch (lokóla match)
w = w (lokóla kiwí)

Dikisionère ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa yango malembe malembe, biso na bínó elongó.
Kasi kinó wáná ekotónda, totómbélí bínó botángi malámu.

La rédaction